« EBOLA++ » by Richard Ali A Mutu
…te, te, te, kamem, nakoki kolekisa butu mobimba te kamem kaka pona kobundana na komémoriser maloba nionso na lopoto ya makasi boyé! Te, te, te, kamem, boyé te, pardon, yango eza nini vrema? Eza nini au juste? Mais baza ndenge nini penza baministres na baconseillers na ngai oyo? Ooh bango nde bato ya mayélé! Donc, bambula nionso oyo bakendeke kolekisa na biteyelo ya bapaya kaka pona koyekola kokoma makambo ezanga tina boyé! Te, lokuta mpe eleki! Tozokosa mpe mingi! Ooh macroéconomie, Ooh dévéloppement, Ooh inflation… Te, totika mpe nanu, esi eleki! Boyé te! Nakotanga lisusu discours oyo te! Tala makambu, 10pages mobimba kaka na mambi malokuta pe na monoko oyo ngai nalobaka malamu te. Kuna nabimaka lokola mwa kizengi moko boyé! Baninga bayaka na lolendo, na mwa ndambo ya lokasa pe ozomona ndenge bazoloba penza alez lokola akanelaki moto! Eza kaka normal… Zela, mais nini penza ezopekisa ngai koloba na ndinga na biso kuna? Tobangaka penza nini? Nasi mpe nakoli… Tala ndenge mandefu ya pembe ekomi kobima ngai na libefu! Eh, ya solo ko, nakoli vrema! Eh, nakomi mpe munene koh! Ah, bokonzi’ango eza mpe bien hein! Eh, mandefu ya pembe penza koh! Eh, mais, mwasi na ngai oyo akoyebisa ngai kutu te! Donc soki na talaka na kitarara te, eh, ngai mpe, Kitara… ouf, Kitalatara… aie, kitarala… Ah, nalembi! Donc soki natalaka na miroir oyo te nalingaki mpe nayeba te, ah! Et puis, likambo ya miroir oyo vrema, eish, ekomi nde kobayisé nga! Donc mukolo lokola ngai, avant discours nionso, il faut nayaka kaka koloba liboso ya kitara…eh, Kitalara…eish, liboso ya miroir po nazwa maitrise! Ah, Nabayé makamb’oyo! Donc yé penza, soki expert na communication, exercice amoni ya kopesa ngai mukolo boyé na mandefu ya pembe, kaka ya kolobaka liboso ya kitara…ah, liboso ya miroir lokola liboma moko boyé! Azela, lobi nakolongola yé! Te, soki kaka tosilisi makambo ya Assembré…eh, Assembr…ah! Assemblée oyo ya Nations-Unies, na retour nakolongola yé! Namonaka mpe eloko moko ya malonga azosalà te! Atako mwasi na nga akumisaka yé, tango nionso koloba ke asungi ngai makasi pona kokolisa ndinga na ngai pe kolongola ngai mwa timidité! Eh, tala ngai basi basusu? Ngai timide!? Eh, yango natutaki ye mwa makofi mukolo wana! Soki acontinuer kaka koloba makambo nayé wana, azela, nakosala ye mabé mbal’oyo! Eh, aloba ngai « Timide » ! Ngai mutu nasimba mandoki, ngai mutu nakota zamba, ngai mutu nabengana tata wana ya ekoti ya léopard, ngai mutu nakimisa ye mboka’oyo! Eh, ngai! Ngai penza Mokonzi ya Mboka ; aloba ke ngai « timide » ! Mokolo akomeka lisusu, akomona ngai! Te, naza timidi te ; eloba kutu jeune wana oyo ayembaka : « …Eza’nde ndenge na ngai ; nalingaka na’nga nde koloba mingi te, elingi koloba te ke naza timide ! ». Wana nionso kaka pona amonela nga na minoko na bango wana ya bapaya! Ooh monoko ya bato ya mayelé! Katuka! Nani nde penza alobà ke koloba monoko ya bapaya nde wana kozala mayélé! Te, wana penza ekomi kosakana na batu! Nakotanga lisusu discours oyo te! Ye Ministre wana ya bacravati ya motané aya nanu awa na ndeko nayé oyo alobaka mingi ; baya kobongolisa mayé manso na Lingala, te namoni batia yango nde na swahili! Ah! Kasi, soki batié na swahili, bana mboka bakomona’ngo kaka mabé! Bon, batia kaka na monoko oyo bakotia, ya tina ezali ke ezala nde na ndinga na biso moko! Bango moko bakobundana pona kotraduire… Tofutaka mpe mbongo ebelé, eh, baluka bango moko kofuta bato pona batraduire! Ngai mpe naza Mokonzi, nakoki kondima te ke makambo’ango ekoba kaka boyé! Bango balobakà alez na minoko na bango, biso nde tobundanaka pona koloba lokola bango! Te, te, te! Makambo wana penza esili! Bakozwa ngai lisusu te! En tout cas, napesi Tata Mokonzi wana ya ekoti ya Leopard raison; azalaki penza mobali; ye penza asosolaki na bosolo! Oyo ezali nde komonela bato! Ngai mpe nasi nakoli! Eh, ngai mpe nabimi mandefu ya pembe! Eh, moto akobangisa lisusu moninga te! Tala mwa mandefu na ngai ya pembe na libefu! Eh, nakoli penza koh! Mais, mwasi oyo aza wapi? Aza wapi, aya kotala mandefu na nga ya pembe!? Mandefu ya bwanya, mandefu ya Bokonzi! Ebongo ameka lisusu koyebisa ngai makambo ayebisaki ngai mokolo wana hein…? Wanda nde penza, ndoto na yé wana ya soso ya minu ekokokisama: soso waa akokosola penza makasi yambo ayemba kokoriko! Banguza bapekisaki ngai mwasi oyo, lelo tosuki wapi? Kaka mutu makasi! Soki nayebaka! Tala lel’oyo! Akomà koyebisa ngai makambo wana ya pambala-pambala… Ngai, nakende! Eh, nakokende wapi? Tala basi misusu oyo balingi kocomprendre makambo te! Ngai penza elenge mbinga mobali boyé, na basacrifices nionso nasali, nakende kaka boyé! Eh, na mboka oyo!? Mais bakobwaka ngai libanda, bakokomisa ngai penza lokola papier ya wc! Bakokoma koseka ngai bipayi binso! Ngai, nakende! Eh, ye nde akokende… Akobima na libala oyo mpe akotika ngai ! Nakokende te ! Nakende wapi ? Nakoma kovanda na salle wana pona ngai mpe natombolaka loboko tongo pe pokwa ? Bango nionso wana na libanda bazokanela ngai! Nayebi, soki bazwi ngai, bakoyokela ngai mawa te! Bakobimisa badossiers nionso, na ya solo, na oyo ya lokuta! Nayebi bango malamu! Eh, nasi nakoli. Naza lisusu mwana muké te, pona bakosaka nga ndenge babandaki kokosa nga tango na bandaki makambo’ango. Lelo nakolisi idologi, lokola masta wana alobaka. Asekisaka ngai mingi kasi nasepelaka kamem na makanisi nayé. Mingi-mingi na oyo etali bandinga na biso ya Ekolo. Nabanzi, il faut nabengisa yé. Oui. Ye asengeli aya awa pona alendisa ngai lisusu malamu-malamu. Esili, esili, nakotanga makambo oyo kaka nalokota na biso! Makambo ya lifalansé to ya ngelesa ezali te. Tosekaka lokola bango. Tokosolaka lokola bango. Toliaka lokola bango. Tomaniolaka lokola bango. Tolotaka mpe kaka lokola bango. Mais enfin, tokomi wapi pe tozokende wapi penza? Soki osali bongo te, bamoni yo zoba. Na bandeko nayo bakomi koseka yo. Eza pasi. Te, ezopesa nga nde kanda! Namoni kutu, nakolata mpe lisusu kazaka oyo na kravati na’ngo te! Tata na ngai azalaki na raison. Namoni esengeli idologi ya safari ezonga. Oui. Il faut idologi wana ezonga. Tala, nabandaki kutu na yango na ebandeli; soki bazoba oyo ya balakisi bayakà kobangisa ngai te. Tina na bango penza pene-pene na ngai ezalaka nini? Bazosala bambula na bambula na biteyelo pona koyekola kasi bazobima kaka libungutulu penza. Kotala bango, epesaka ngai ata posa moké te ya kozongela kelasi. Nayebi ke batongaka ngai, koloba ke natanga mingi te lokola bango; kasi tala bango, mibali-zéro! Oyo bango bayebi ezali kaka kozala lokola mindele. Bayé baniokolakà bakoko na bango. Bazobosana ke mambi manso mayé bakoko na biso batelemelaka yango. Tango inso sé falansé falansé falansé lokola mwa batshaku moko boyé. Mpe, soki moninga moko na bango asali mwa gaffe, okomona penza babandi koseka pe kotalisa ke moninga wana azali mayélé te. Oyo penza bato ya lolenge kani ? Nani ayebisà bango ke koloba lifalansé to ngelesa nde wana kozala mayélé? Bazoyoka soni koloba monoko na bango. Babosani ke Ndinga nde ezali elembo ya liboso ya bomoto pe bozali na yé! Kuna, na Assemblée yango, okomona chinois ayé, alobi na kichinois; fransé ayé, nalolendo nionso, alobi na lifalansé, ukrainien ayé, alobi be na ki’ukrainien; israélien ayé, alobi na kiyuda, pakistanais ayé, alobi na ki’arabe ; kasi soki moto moyindo ayéi, okoyoka ye kaka soki na lifalansé te, ye wana na kingelesa! obé minoko mibalé wana batikela bango, mpe mbula koleka tuku itano, bazokoba kaka kotia yango nde na liboso na Bikolo na bango; oyo ya bango moko, babwaki yango na sima! Oyo soni pe pasi. Baya nanu awa, nasi nalobi, hein, ozoyoka, tala ngai malamu: Okotanga mambi mayé kaka na lokota na yo!!! Soki baboyi, bavandi! Ekozala kutu mpe malamu mingi. Nasi mpe nabengani bango awa kasi bazotinda kaka bato misusu. Balingi mpe kokenda te. Bazela, bakomona. Nasi mpe nakomi na suka, kasi, ngai nde nakokenda te! Bomoi na ngai mobimba nayebi kaka kosala mosala eyé: kopesa mitindo, kosigner bapapiers, ko’inaugurer ba nzela pe baponts, kokende bipayi na bipayi ndenge nalingi… Batu nionso mpe bandimi misala na ngai. Na mwa tango moke, nasi nasali ya mingi boyé ; bongo soki nazwi kaka tango mwa mingi lokola tata wana ya ekoti ya leopard! Ah, kombo na ye mpe natangaka lisusu te banda kaka bangunza bapekisa ngai! Tina na yango mpe, nayebaka te. Soki natangi kombo nayé nde ekosala ngai nini? Akobimela ngai? Mabele makofungwama? Soso ya minu akokosola? Butu ekoyinda mpii? Ah, bikila-kila mpe esi eleki na bangunza oyo! Ooh kotalaka elongi ya tata wana te, Ooh kosekisaka mwasi nayo na tongo te, Ooh kosukolaka mayi ya tongo te, Ooh koliaka pili-pili ya mobesu te… Nasi penza na lembi. Bikila eleki. Nionso kaka pona kobatela bokonzi. Hé, tala penza, nasima baya koloba na ngai ke nasengeli kokende, he! Kasi, bangunza bakoboma ngai-tss! Omoni, wana mwasi na ngai azoyeba yango te. Nanu bangunza basepeli te. Esengeli nakoba na bango kino mokolo bakoloba ke ekoki. Soki na kati sik’oyo, bakoboma ngai. Bakosala ngai lokola basalaki tata wana ya ekoti ya leopard. Ah, posa ya kotanga kombo na yé, kasi… Ye penza awumelaki hein! Ehh, bambula ebele boyé! Ngai, nakosala koleka yé. Bangunza bakosepela. Nakosepelisa bango. Nayebi nini nakosala. Bato banso bakokamwa. Ata kulutu na ngai ya ngambo, ekolekela yé. Akoloba aaa’soki nayebaki he! Bokonzi na moyi ya lelo basakana na yango te. Esengeli kozala na bastratégies kili-kili pona kobatela yango malamu. Ezali lokola liki. He, Mokonzi asengeli kozala lokola mwana maki. Kolanda bilobela ya bato te. Surtout ya bayé oyo ya opposition. Bango nde penza bato bayebi kodistraire population. Esengeli balobaka kaka bongo, na sima, na mwa tango moké, okobenga moko to mibale na bango, mpe opesi ye mwa ndambo ya mosolo to eteni ya bokonzi, wana, bavandi nien; basusu mpe bakobima, mpe okobi kaka bongo. Bon, nayebi ke oyo bapikà mpe bazali, kasi baza se ya kotanga. Bastétégies esengeli ezala ya makasi… Oyo penza okomona ke moyen moto akakola ezali. Bayeli ngai makanisi pe bastatégies ndenge na ndenge, kasi nionso wana ezalaki kaka koningisa ngai te. Kasi, tala ngai moko na lisungi ya bondoki ya bangunza ndenge tobimisi mayélé oyo eleki kutu na ya bato ya mayélé, oyo kino lelo ata Mokonzi moko te atikali kokanisa yango! Bazela bakokamwa! Nakobimisa yango kuna na Tribune… mokili mobimba ekotikala monoko polele! Pouahh ! Oyo nini? Eh, oyo kindoki te boyé? Nani nde azoyà komeka ngai na tang’oyo? Eh, nzinzi na ngonga oyo na kati ya ndako ya Mokonzi? Ah, ah, ah, oyo eza kaka ba’attaques ya mwasi oyo! Asi ayoki ke nazwi suka na boul alors alingi a’eliminer ngai! Jamais! Akokoka te! Jamais! Eh, tala likambo, bakomi mibale! Eh, oyo nini? Mpe bazoya kobaluka kaka na mutu na ngai! Eza nini? Nanu nzinzi atikala kokota awa na ndaku na ngai te. Natikala koyoka ata likelele moko te ya nzinzi na ndaku oyo. Nakokaki kondima ata oyo ya moyi, kasi oyo ya 3heures ya tongo, ezalà te. Oyo eza kaka ba’attaques ! eza kaka mwasi na ngai oyo! Tala, banda nabandi komilobela awa liboso ya kitara… kitalatara atikali ata koninga te kuna na mbetu. Kaka lelo nde ye alali makasi. Makelele nionso natié na kati-kati ya butu ya lelo na ba nkasa eyé ya discours ezanga tina oyo ayoki yango te? Ah, wana penza azomikosa! Ngai naza lisusu mwana muké te. Nasi nabimi mandefu ya pembe. Azela. Nakobaré banzinzi oyo! Nayebi ke eza bamilimu nayé atindi bango po bayoka baboul na ngai pe baboma ngai na butu oyo. Bakozwa nga te. Ya ngai bangunza bazali. Eh, Tala, bazocontinuer kaka! Mais au juste eza nini? Donc mwasi oyo amoni penza biloko ya kotindela ngai kaka banzinzi na heure’oyo? Bon, etali yé. Nazobaré bango. Soki ye moko aza na kati na bango, etali yé. Ngai nayebi ke nazobaré nde nzinzi. Eh, Tala, bantshor penza? Tala ndenge bakei kobatama likolo na plafond. Omoni, oyo eza kaka ba’attaques. Lokola bakoki ngai na mosuni te, namoni balingi sik’oyo bameka na molili. Boyebaka mpe bisika na kotaka te. Bokosamwa.
Lobi nakobengisa bango nionso awa. Baya tomaniomala malamu-malamu ndenge nini nakobimisa boul na ngai wana na Tribune. Nayébi ke bango nionso bakokamwa. Oyo ayaki na baboul nayé wana ya bana miké ya « Fufu-dézir, Fufu-dézir », ye moko penza akomona ke azalaki kaka bololé. Na mboka oyo bato basi bakomeli boyé, oyela bango makanisi ya bana miké « Fufu-dezir, Fufu-dezir » ya fwati! Bato mibimba, bakolo penza, kasi balingi kaka kosala makambo lokola bana mikié na balifalansé na bango ezanga tina. Toya kokotisa ata mwa masuwa na mayi, yoka bango kuna na badiscours milayi-milayi na balifanlansé ezanga tina. Makambo wana nionso esengeli tolobela yango na likita ya tongo ya lelo. Mboka monene boyé, mpe kino lelo tobikaka kaka na bobangi? Nayebisa bango ke nalingi nakoma kosala masolo misuse na bachinois, bango nionso bayéi kotelemela ngai lokola nabomi moto! Ooh tata mokonzi omoni soki osali bongo, bato wana bakomona ke yo okomi kosala makambo ndenge bango balingi te, suka-suka bakoluka kaka balongola yo na ebonga, donc tika kaka! Eh, baza penza maboma bato’oyo! Donc ata mwa souci moké ya mboka ezali te. Lelo oyo tala ndenge makambo kili-kili esalami! Bango wana bakomi kobetela ngai maboko pe koloba kutu ke ngai nde “Tata ya kimpwanza ya économie ya mboka!”. Kiékiékié! Nabukanaki nakoseka penza tango nayokaki yé koloba bongo. Ya solo penza, bokonzi eza kaka eloko mosusu. Zala na mbongo, bato banso bakobanga yo kaka, longola bayé oyo ya mitu makasi. He, bayé wana bazangaka kaka te. Bakufaka mpe kaka babola, kasi kombo na bango ewumelaka koleka bayé basalaki kombo na bozwui tango bazalaki na bomoyi. Bon, tokoloba nini? Vie mpe eza kaka likambo ya libaku, hein! Ngai moko mpe oyo, nani akokaki kondima? Eh, Tala ndenge nakomi mpe mutu! Tala ndenge nakomi mbinga mobali. Tala bapaquets! Navimbi penza. Eh, Tala ngai! Eh, oye penza monene hein ! Hum! Mboté tata Mokonzi! Yo nde Mokonzi wa Ekolo! Eh, eske oza komitala bien? Mitala penza malamu, pardon. Eh, oyébi ke o’changer vraiment? Eh, tala mandefu ya pembe ! Mandefu ya santé! mandefu ya vitamine, eh! Ah, ngai eh! Oyebi ke ezolekela ngai. Nazondima te. Neti kaka masano! Nakumbeli penza masolo’ango na systématique kaka. Nani akoloba lisusu? Lelo oyo mabaya nionso bazo tia, nazolambela. Mokili mobimba eyebi ngai pe endimi ngai. Kombo na ngai ekeyi sango! Ekatisi bibalé. Edusoli bazamba. Epimbwi tiii na América, na Océania, na India, na Sarah, na Iran, bisika nionso, baminoko inso batangi kombo na ngai ! Kombo na ngai ekomi penza lisapo’onge, lokola mwana mobali wana ayémba. Kombo na ngai… Ekoyokana lisusu makasi na sima ya mikolo mibalé tango nakolobela bango kuna na Tribune wana! Bazela. Bakosentir ngai. Bakotikala penza minoko polele. Bakomilobela « Aah petit’ango akoli hein !!! ». Nayebi. Misusu kutu bakoya kosenga natia bango mpe baboul. Bakosentir. Nakopesela penza na lingala. Lingala wana penza ya bana Kin. Kinshasa makambo. Kinshasa mboka te. Ah, ngai hein! Eh, natika Kin kaka boyé! Ah, neva! Boul oyo eza suka. Kaka na butu nde makanisi ya malamu eyakà. Yango wana bakomi balingaka kaka butu pona bakomaka babuku na bango. Bango mpe basusu! Surtout penza oyo ya biso bayindo! Kino lelo oyo baza kobundana kaka nakokomaka na minoko ya bapaya. Bazoyoka soni ya kokoma na minoko na bango moko. Moninga azokoma na monoko oyo alobaka mikolo inso, asokolaka na yango, alalaka na yango, alotaka na yango, akanisaka na yango, bandeko nayé balobaka yango, mboka nayé mobimba elobaka yango, azosala kutu effort mingi te pona akoma. Kasi yo ozwui olati monoko ya moninga lokola eloko mosusu. Ata pona koseka, ozoluka oseka kaka ndenge moninga asekaka. Nayokaki ke moko kuna na Kenya asili penza akolisi makambo yango. Nakanisa nakoluka mpe nakutana na yé ata na ntango nakosala scal na mboka wana liboso ya kopimbwa pona poto. Esengeli nayoka mpe makanisa ya tata wana. Mokolo mosusu nayokaki kutu lisolo nayé. Bakangaka yé kutu kaka pona makambo eyé ya ndinga. Esengeli basusu balanda ndingisa na yé. Esengeli bana ya Africa batelema. Basosola. Balamuka. Basekwa! Tala tina nakopanza penza kuna na Tribune. Nakoloba na ndinga na ngai. Oyo akoyoka, ayoka. Kasi nayebi nde ke bokokamwa makasi. Bakoluka bango nionso bakutana na ngai. Bakanga ata mwa photo moko na ngai. Butu ezali malamu. Ba nkasa nioso oyo nakotumba yango. Na tongo, tokokoma mosusu. Tokotia maloba penza ya solo oyo ewuti na motema. Tokoloba lisusu mambi malokuta te. Tokobanga moto te pe moto akobangisa biso te. Nakobimisa likambo wana kaka kuna na Tribune. Na tongo, tokozwa nanu badispositions nionso. Il faut moko na bango atikala déjà kosala discours moko ya somo na sima na ngai. Ngai nakoloba yango kuna. Eza se normal. Ya kobanga ezali te. Makambo manso mawutaka kaka awa! Mbalo oyo tozosaisir occasion. Tozokoma histoire mosusu. Après baya lisusu koloba. Mbula koleka tuku mitano eza awa te! Nakoloba. Nakolobela bango…
Na sima ya mikolo mibale…
Na micro ya likita linene ya Assemblée Générale ya Nations-Unies:
« …Batata, bamaman pe bandeko ya mokili mobimba; …Na mayé manso nawuti kotangela pe koyebisa bino, tala, ya motuya mingi koleka nde yang’oyo. Tosi tobandaki komilengela penza ndenge boyebi pona maponomi mayé masengelaki kosalama na mikolo oyo ezali koya… Kasi, kasi, botala, Bandeko, Ata bino moko, Mboka na biso ezangi kimya, mpe ya monene ezali nde likama oyo esili kokomela biso ! Batata, bamaman, bandeko, nakoki kobombela bino te. Ba’experts ya mambi matali bokolongono bwa nzoto to mpe santé, bawuti bongo kosakola ke Mboka na ngai esili bongo kokweisama lisusu na bokono oyo babengi « EBOLA !!!». Kutu, balobi ke Ebola ya mbal’oyo eza makasi koleka oyo ya liboso… ya tour’oyo eza nde « EBOLA++ ». Eeh, Ebola++, bandeko ! Ezoboma na ndenge ya kosakana te. Na ngonga oyo tozosolola boyé, ezosala déjà badégats ya niama kuna na Mboka na nga. Engumba-Mokonzi nde eza penza na zone rouge. Nde, ba’experts basengi ke Mboka mobimba ezala na ekenge, moto akota lisusu te, moto abima mpe te. Ya mawa penza ezali ke ekozwa penza mwa tango molayi pona solution ya solo ezwama. Nde tosili todecréter « Eta d’urgence » na ngonga’oyo. Na lopoto, bolobaka bino moko ke « la santé n’a pas de prix ». Nde na boyé, makambo wana ya maponomi, tokotala yango kaka soki Ebola++ oyo esili, donc après 4ans… ».
Traduit du lingala en français par Rodrigue Isamaleki
English translation “Ebola++” by Edwige-Renee Dro
Né en République Démocratique du Congo, Richard ALI A MUTU KAHAMBO, plus connu sous « Richard Ali », vit à Kinshasa où il fit des études de Droit. Lauréat des certains prix littéraires dont le Prix Mark Twain (novembre 2009). Il publie en 2011 le recueil des nouvelles « Le cauchemardesque de Tabu » aux éditions Mabiki, réédité par les éditions Mediaspaul en 2015; puis un roman en lingala intitulé « EBAMBA, Kinshasa-Makambo » dont l’extrait lui vaut une sélection parmi les 39 meilleurs jeunes auteurs africains 2014 du Projet Africa39. Il est l’initiateur de l’Association des Jeunes Ecrivains du Congo (AJECO), chroniqueur littéraire à la télé, consultant copywriter et collaborateur avec différents projets culturels et littéraires nationaux comme internationaux.
You must be logged in to post a comment.