Mbongwana ya Kotelema, to pe, Pona Nini Bato Batambolaka ya Kotelema ?
Lingala
Richard Ali A Mutu
Mikolo eleki penza, bato bazalaki kotambola na maboko pe na makolo lokola banyama nyonso ya mokili oyo etambolaka na makolo minei. Bato bazalaki mbangu koleka mboloko, nkoyi, to pe,kanga (rhinocéros). Makolo na maboko ezalaki penza pene-pene koleka binama misusu ya nzoto : bazalaki bongo na bininganelo (articulations)nyonso oyo ekokana : Mapeka pe loketo ; miloku (coudes) pe mabolongo, makaka(chevilles) pe bakingo ya maboko (les poignets), maboko pe makolo ezalaki bongo kosuka moko na moko na misapi mitano pona maboko, pe misapi mitano pona makolo, bakisa manzaka likolo ya misapi. Maboko pe makolo ezalaki na bosalami na yango ya misapi mitano uta mosapi ya monene kino oyo ya moke. Makolo pe maboko ezalaki kobengama bankana ya botata (cousins germains).
Bazalaki kosungama nabomemi nzoto kino esika ezalaki kosepela kokoma : na wenzé, na ligablo, nabomati pe bokiti banzete pe bangomba, bisika nyonso oyo ekokaki kosepelisa ye kokoma. Ata ko na mayi, bazalaki koyokana malamu pona kosunga nzoto natina ‘te enana, enyanya (enager) pe emibwaka na mosuma (plonge) na mayi. Bazalaki penza na limemya ya demokrasia pe bokokani na bozali na bango. Bakokaki pe kodefa bosali ya biteni misusu ya nzoto, lokola : mongongo ya monoko, boyoki ya litoyi, boyoki solo ya zolo pe botali ya miso.
Bomoko ya bosali pe botamboli na bango ezalaki penza kotondisa baninga na bango na zuwa makasi. Bazalaki komimona tina te na bodefisaka mambi na bango ma ntina na bandeko na bango misusu. Komona ‘te, makolo pe maboko ezalaki kotambwisa bango, bakomaki nazuwa oyo ezalaki koboma bango miso. Na boye babandaki sika’awa kosalela bandeko na bango oyo mibale miango ya mabe.
Lolemo ezwaki likanisi moko na boongo pe etiaki yango mbala moko na mosala. Nde boye, ebandaki komituna mituna na mongongo makasi na oyo etali penza bokasi ya maboko pe makolo. Nani nde azalaki makasi koleka ? Amitunaki motuna. Binama oyo mibale, maboko pe makolo, na bondeko na bango, batikalaka ata mbala moko te kozwa mokano ya komituna : nani aleki bokasi pe naniakoki kosala nini ? Sikawa, moko na moko akamataki mongongo ya monoko pe abandaki bongo kobelela ‘te azalaki na motuya mingi na nzoto koleka moninga. Ebongolamaki mbala moko na boswani lolenge ‘te nani nde azalaki na bonzenga koleka ? Maboko ebetaki tolo pona misapi naye ya milayi pe mike pe nabolobaka bilobela likolo na misapi ya makolo oyo ezalaki bongo mikuse pe minene. Misapi ya makolo, pona kobenda mokila te, ezongisaki pe na botiolaka misapi ya mike, na bobengaka bango : bandeko ya nzala !Kokamatana wana ekobaki penza kaka bongo na mwa mikolo ebele, kino kosala ‘te ekitisa bokasi na bango ya kosala mosala elongo. Na suka, ekomaki nde penza likambo ya kowela bokonzi ; pe bazwaki mokano ya kobianga biteni misusu ya nzoto pona kokata likambo.
Monoko nde ayaki kopesa likanisi ya bowelani. Likanisi moko malamu oyo biteni nyonso endimaki. Kasi boni ? Basusu basengaki ‘te bowelani yango esalama na etumba ya libanda – etumba ya libanda oyo ekowelana makolo na maboko. Basusu pe basengaki ‘te ezala nde lisano ya mbeli, to pe, lisano ya kobwakaka biloko likolo (jonglerie), to pe, lisano ya mbangu, to pe lisusu, kosakana na lisano moko lokola ya « échecs » to ya dam.Kasi makanisi to pe bosengi wana nyonso ebwakisamaki nzambi etalisamaki lokola ‘te eleki pasi mingi pona kosala yango, to pe, makasi pona eteni oyo, to, eteni mosusu. Na bongo, ezalaki lisusu kaka monoko, sima ya kodefisa bongo maloba, nde ayaki kopesa likanisi ya suka : liboke ya eteni moko na moko ekopesa makanisi ya bowelani moko, pe ekosala bongo moto na moto na ngala na ye. Maboko na makolo bandimaki yango.
Bowelani ekamataki esika na kati ya zamba, penepene ya mayi. Biteni nyonso ya nzoto ekomaki penza na bokebi makasi na kotala ‘te likama moko, to pe, likambo songolo kaka ekokaki sikawa kokomela nzoto, awa biteni naye nyonso ekomaki kowelana bango na bango. Miso etalaki penza zamba malamu malamu pona kotala esika nini ata likama moko ekokaki kobimela bango ; matoyi pe ebongisamaki pona koyoka ata mwa likelele moko na bisika nyonso ekoki kowuta ; zolo pe emifungolaki malamu malamu pona koyoka solo ya likama moko oyo miso pe matoyi bakokaki tango mosusu koyoka pe komona te ; pe monoko azalaki bongo ya kobelema pona koganga makasi : « Likama ».
Mopepe ememaki sango ya bowelani ya bipayi na bipayi ya zamba, mayi pe likolo. Baye ya makolo minei bazalaki bato ya yambo ya kosangana, elongo na baye ya minene oyo bamemaki bitapi ya nzete na makasa mobesu pona kotalisa ‘te bayaki penza na kimia. Ezalaki liboke ya bosangani ya nkoyi ya Afrika, Nkoyi (guépard), nkosi (lion), kanga (Rhinocéros), ngombolo (Hyène), Nzoko (éléphant), dikata (Girafe), Kamela (Chameau), Ngombe ya maseke milayi pe Mpakasa ya maseke mikuse, Mbolokolo (antilope), Kulupa (Gazelle), Simbiliki (Lièvre), Mpuku ya butu na poto (Glis-Glis) pe na Mpuku ya zamba.Baye bavandaka na mayi : Ngubu (hippopotame), mbisi pe ngando babimisaki biteni na bango ya likolo na mokili. Oyo ya makolo mike mibale : Malibanga (Autruche), Linkeme (Pintade) pe Moduku (Paon) babetaki mapapu na bango na esengo penza ; bandeke bayembaki na banzete ; libanki ayembaki tango nyonso. Limpulututu (Araignée), Motshopi, ngongoliko pe mokambila (Scolopendre) bangulumaki na mabele, to pe, na banzete. Mongingima (Caméléon) abandaki kozwa tango naye nyonso, nakotambolaka malembe penza pe nabokebi. Ka kana ngonga yango, Moselekete azalaki kokima-kima bipayi nyonso, kofanda esika moko te. Makaku, sokomuntu (Chimpanzé) pe Mokomboso bazalaki kodyembela bitapi na bitapi. Ata kutu banzete pe matiti pe emilalisaki malembe, mopanzi moko, kino mosusu, etengami pe etelemi, moto na moto na ngala naye.
Monoko efungolaki bowelani na loyembo oyo :
Tozosala boye pona tozala na esengo
Tozosala boye pona tozala na esengo
Tozosala boye pona tozala na esengo
Nzambi biso nyonso
Towuti esika moko.
Maboko na makolo balapaki ndayi ‘te bakondima na boboto nyonso biyano oyo ekobima na bowelani ; kanda te, mangungu ya kobwakisa te, bopemi te, to, bosali makambo malembe te.
Maboko ebandisaki bowelani : Babwakaki eteni ya nzete na nse. Lokolo,oyo ya mwasi, to,oyo ya mobali, to pe elongo, esengelaki kotombola eteni ya nzete yangope kobwaka yango. Makolo mibale ekokaki bongo koyokanaka tango nyonso ya bowelani, pe kosalisa misapi na bango, moko na moko, to elongo, na ndenge balingi, pona kosala momekano yango. Bamekaki kobalusa yango, kotindika yango ; bamekaki bongo na lolenge nyonso kasi bakokaki te kotombola yango penza na ndenge esengeli ; pe, pona kopusa yango esika mosusu, oyo bakokaki kosala esukaki kaka na kotindika yango na mwa ndambu ya basantimetele ya pamba. Nabomoni bongo, misapi ya maboko ekamataki penza mongongo ya monoko pe esekaki, pe esekaki lisusu. Maboko, na ngala naye, amitalisaki penza lokola na bowelani ya kitoko, kolakisaka kimoke na bango, pe, na balolenge ndenge na ndenge, batomboli eteni ya nzete yango. Babwakaki yango mosika penza na zamba, pe bongo bato nyonso babimisaki penza pema ya boluli bango, ezala baye oyo bazalaki kotelemela bango, ezala ata batali ya pamba. Balakisaki lisusu bokasi na bango na makambo misusu : babimisaki na zelo sani ya loso, bakotisaki batonga, basalaki bimema-nzete ya mike pona komema biteni minene ya nzete, basalaki makonga oyo babwakaki penza na mosika koleka.Koningana pe na bisala-sala misusu oyo misapi ya makolo ekokaki kaka kolota. Makolo ekokaki kotikala kofanda kaka wana te pe kokoba kokamwa liboso ya botalisi makasi pe boyebi kosala ya katumwa bandeko na bango oyo bakonda. Maboko ya batali ebetaki penza maboko makasi lokola bakaké na boluli pe botalisi bomoko na bandeko na bango, maboko. Boyé nde esalaki makolo pasi mingi. Kasi, makolo ebelemaki te po na kotika momekano : atako tango bafandaki wana na mwa mawa, misapi na bango ya minene kosalaka bilili na mabele, bamekaki kozwa pe likanisi ya momekano moko oyo ekokaki kolongisa bango bowelani.
Suka suka, ekomaki pe ngala ya makolo na misapi na yango ya kopesa momekano. Oyo ya bango, elobaki bango, ekozala na yango kaka pete. Maboko esengeli bongo komema nzoto mobimba na eteni moko kino mosusu ya libungutulu. Oyo penza momekano nini oyo ya bazoba, ekanisaki misapi na lolendo nyonso. Ezalaki nde penza likambo ya kotala. Nyonso ya nzoto ebalusamaki. Maboko ezalaki kosimba mabele ; miso ekomaki pene-pene ya mabele, botali na yango ekomaki penza mokuse likolo ya bopusani na yango na mabele ; zelo ezalaki bongo kokota na zolo pe kosalisa yango ba «intsi », makolo na misapi na yango ekomaki bongo kopepa na likolo : nyayo juu, egangaki pe eyembaki batali na bogangi penza.
Na maboko
Ya bobangi ezali te
Na maboko
Bolanda maboko
Topumbwa likolo na mapata
Kasi bokebi na bango ezalaki penza na maboko na makolo. Biteni oyo, na mwa tango moke, ewutaki kotalisa biso bokasi na yango nyonso, ezalaki na makoki ya kopusana to kotambola kaka na mwa ndambu ya bametele. Na mwa botamboli moke, maboko egangaki pasi, maboko elembaki, eninganaki pe etikaki nzoto ekweya. Emipemisaki, pe ezongelaki lisusu momekano. Mbala oyo bamekaki penza kopanza misapi na yango malamu pona basimba zelo malamu kasi misapi ya minene ekokaki te kofungwama malamu. Bamekaki bongo kosala bachutes kasi bapekisaki yango nzambi ezalaki kosenga ‘te makolo pe esala mosala pona kobaluka yango. Na bongo, ekomaki penza nde ngala ya misapi ya makolo ya koseka. Badefaki penza mingongo biyike ya monoko pona kosangisa boseki na bango na mingongo ya mike oyo misapi esalelaki pona koseka. Naboyoki botiolami oyo, maboko esilikaki makasi, pe emekaki lisusu komema nzoto. Kasi bakokaki kosala ata ko loboko moko te. Na bolembu wana, maboko na misapi na yango etikaki momekano. Makolo etondisamaki na esengo ya kolakisa bokasi ya kibosani na yango : batambolaki, basalaki mwa neti kokima, bapotaki mbangu, bapumbwaki moke likolo pe liboso, kasi ata ko mbala moko te batikaki nzoto ekweya. Makolo nyonso ya batali enyataki penza mabele makasi pona kosala makelele na tina ya kotalisa bokumisi pe bomoko na bango. Maboko etombolaki maboko na yango pona kotelemela molimo oyo ezangi fair-play, nabobosanaka ‘te bango nde penza, bato ya yambo oyo babandaki kosala bongo.
Kasi, bango nyonso, ata ko batali, bamonaki eloko moko ya kokamwa na maboko : misapi ya minene oyo ebendanaki tango maboko ezalaki kobundana pona komema nzoto etikalaki na bokabwani na misapi misusu. Binama misusu elingaki ebanda kozongela koseka tango baye komona lisusu eloko mosusu ya kokamwa ; na esika ke maboko ekoma elemba-lemba, mosapi ya monene oyo ekabwanaki na baninga ematisaki nde lisusu bokasi ya liboko na oyo etali kokanga pe kosimba. Oyo nde likambo nini ? Kisimbi ebongolami na bokasi ya bozangi-mbeba!
Bosololi oyo esalamaki na kati ya binama pona kopona nani molongi, ezwaki mikolo mitano, motuya ya misapi ya maboko pe ya makolo na binama moko na moko. Kasi, ata ko babandaki bongo komeka, bazalaki kokoka kopona molongi moko te oyo penza bato bakotelemela te ; nzambi moko na moko azalaki malamu to makasi penza na oyo azalaki kosala to amesanaki kosala ; moko te akokaki kosala ezanga lisungi ya mosusu. Na boye nde ebandaki masolo milayi ndenge na ndenge ya bomanioli : Esika ya nzoto nde penza ezalaki nini na mayé manso ? Bamitunaki motuna yango pe basosolaki ‘te nzoto nde ezalaki kosangisa bango nyonso lisanga ; bazalaki kosungana kati na bango. Enama moko moko esengelaki kosala malamu mpo ‘te bango nyonso basala malamu.
Kasi, pona kopekisa ‘te mimekano ya lolenge wana esalama lisusu na mikolo ekoya, pe pona kopekisa bango ‘te batelemela yango, binama nyonso ezwaki mokano ‘te uta mokolo wana, nzoto ekobanda kotambola ya kotelema na makolo ekangama na nse pe maboko ekotikala na likolo. Nzoto esepelaki na likanisi wana, kasi ekotika bana mike batambolaka na makolo minei pona babosana te bisika bawuta. Bayaki kokabola misala : makolo ekomemaka nzoto, kasi soki bakomi na esika basengelaki kokoma, wana nde sikawa maboko ekosala misala nyonso esengelaki kosala to komema biloko ya mosala. Na tango makolo pe bitambe ekozala kosala mosala ya komema nzoto, maboko ekotandama pe ekosalisa bokasi na yango pona kosala mosala, pe bakosala ete bilei ekoma na monoko. Monoko, to pe mino, ekobanda kolia bilei pe kotinda yango na likundu (estomac) na nzela ya mongongo. likundu ekofina bilei nyonso esengeli pona nzoto pe ekotinda yango na sima na banzela oyo ekozala ‘te bileyi oyo ya tina epanzama na binama nyonso ya nzoto. Pe na sima, likundu ekotinda biloko oyo ya tina te na nzela ya mabulu ; nzoto ekotika yango na bilanga to pe ekokunda yango po ‘te eleisa mabele. Banzete ekokola pe ekobota bambuma ; maboko ekobuka misusu pe ekotia yango na monoko. Oh, boye nde botamboli ya mokili.
Ata pe masano pe bolekisi tango, ekabolamaki na tina : loyembo, koseka pe liloba etikalaki pona monoko ; kokima pe ndembo etikalaki mingi penza pona makolo kasi baseball to pe basket-ball pona maboko ata ko makolo nde esengelaki kokimaka. Na oyo etali lisano ya bokimi mbangu, ezalaki lisolo ya makolo yango moko. Bokaboli misala ekomisaki nzoto ya moto lokola penza mashini moko bio kitoko oyo ekomaki kutu koleka banyama na oyo bakokaki kosala na ebele pe na malonga.
Kasi, binama ya nzoto eyebaki ‘te boyokani yango ekokaki suka suka kobota kaka makambo. Motu, na likolo ya nzoto, ekokaki komiyoka malamu koleka makolo oyo ezalaki konyata mabele, to pe, komimona ‘te azalaki mokonzi pe binama na nse na ye lokola basali. Na boye nde basakolaki ‘te na oyo etali ki bokonzi, motu pe binama nyonso mosusu ezalaki ndenge moko. Pona kotalisa yango malamu, binama nyonso ya nzoto endimaki ke pasi pe esengo ya enamanyonso ekobanda koyokama na binama nyonso ya nzoto. Bongo, bakebisi monoko na bolobaka « songolo na ngai, pakala na ngai », ayeba ‘te azali nde koloba pona nzoto mobimba, ezali te pona ye moko.
Nde bayembi :
Na nzoto na biso
Mwana mosala azali te
Na nzoto na biso
Tomisalelanaka basusu pona basusu
Biso na biso
Tomisalelanaka basusu pona basusu
Biso na biso
Tomisalelanaka basusu pona basusu
Monoko nde mongongo na biso
Simba ngai, nga pe nasimba yo
Tozali kobatela nzoto kolongono
Kitoko nde bomoko
Tozosala na lisanga
Pona nzoto kolongono
Tozosala na lisanga
Pona nzoto kolongono
Bomoko nde Bokasi na biso
Oyo nde eyaki kobengama « Loyembo ya nzoto ». Nzoto ayembaka yango lelo pe yang onde ezali kotalisa bokeseni ya bato na banyama, to pe, baoyo babwaka mbongwana ya kotelema.
Ata kooyo bamonaki, ba oyo ya makolo minei balingaki na bango mbongwama wana te. Likambo ya loyembo ezalaki na tina te. Monoko esalamaka pona kolia kasi pona koyemba te. Basalaki bongo ya bango lisanga ya babateli mokili ndenge ekelama. Bamitiaki penza na bosali kaka makambo na bango ya kala, na boboyaka penza kobongola mimesano na bango.
Tango bato bakotaki na koyeba polele mosala ya binamanyonso, basalaki malamu elongo ; kasi tango batalaka nzoto na moto lokola te babundani, moko likolo na mosusu, wana nde bapusanaka pembeni ya bandeko na bango banyama oyo babwakisa mbongwama ya kotelema.
~
Approved by professor BIENVENU SENE MONGABA (Phd Lingala)
Read the English translation – The Upright Revolution: Or Why Humans Walk Upright by Ngugi wa Thiong’o
Born in the Democratic Republic of Congo, Richard ALI A MUTU KAHAMBO, better known under the name of Richard Ali lives in Kinshasa where he studied law. He has been selected for some literary prizes such as the Mark Twain Prize in November 2009. In 2011, his collection of short stories, Le Cauchemardesque de Tabu” was published by Mabiki and then by Mediaspaul Publishing in 2015. His novel, EBAMBA, Kinshasa-Makambo, written in Lingala helped him be selected by the Africa39 project as one of the best 39 young African writers in 2014.
He is the founder and the president of the Association of Young Congolese Writers (AJECO), a TV presenter on literature and a copywriter consultant. He collaborates on different cultural projects both at national and international levels.
You must be logged in to post a comment.